Gael Music: Lokumu eza ya yo

558 2 0
                                    

Oza Nzambé na bolingo 
O bongi na lokumu 
Yahweh lokumu eza ya Yo (×2) 

Sala nga na yeba eh, baposa ya Motema na Yo 
Loba nga na yoka eh, mabanzo ya molimo na Yo 
Bongo nga na kokisa Papa eh, baposa ya Motema na Yo eh 
Bongo nga na loba maloba eh maé ekosimba Yo 
Loba nga na yoka eh, mabanzo ya molimo na Yo 
Simba nga na ningana eh, na nguya ya Loboko na Yo 
Bongo na misopa Papa eh, mabolongo na sé na sanjola aaah 
Na mitika Yahweh, liboso na Yo 
(Oza Nzambé na bolingo)Oza Nzambé na bolingo 
(O bongi na lokumu, Yesu eh)O bongi na lokumu 
(Yahweh lokumu eza ya Yo)Yahweh lokumu eza ya Yo 
(Lokumu eza ya Yo eh)Yahweh lokumu eza ya Yo 
Sala nga na mona eh, nguya ya loboko na Yo 
Mimonisa na kamwa eh, nkembo ya Bonzambé na Yo 
Bongo nga na tatola Papa eh, Makoki na Yo Mosantu eh 
Bongo nga na sanjola yaya eh, na lolenge olingio 
Mimonisa na kamwa eh, nkembo ya Elongi na Yo 
Simba nga na lenga eh, na nguya ya Loboko na Yo 
Bongo nga na loba maloba eh, na maé oyo na moni na Yo 
Bongo nga na sanjola yaya eh, monene na Yo 
(Oza Nzambé na bolingo)Oza Nzambé na bolingo 

(O bongi na lokumu, Yesu eh)O bongi na lokumu 
(Yahweh lokumu yango ya nani?)Yahweh lokumu eza ya Yo 
(Mokonzi lokumu yango ya Yo)Yahweh lokumu eza ya Yo 
Sala nga na tatola eh, nguya ya Loboko na Yo 
Kokisa na yemba eh, bilaka ekoma loyembo o 
Nde nge Yo osalaka Papa eh, yango nde ekoma mabina 
Bongo nga na tatola Papa eh, na mabota nionso 
(Oza Nzambé na bolingo)Oza Nzambé na bolingo 
(O bongi ooo)O bongi na lokumu 
(Papa lokumu eza ya Yo eh)Yahweh lokumu eza ya Yo 
(Mokonzi lokumu eza ya Yo eh)Yahweh lokumu eza ya Yo 
(Ebandeli pé suka na nionso Lokumu eza ya Yo eh)Yahweh lokumu eza ya Yo 
(Mokokisi na nionso Papa, lokumu eza ya Yo eh) Yahweh lokumu eza ya Yo 
(Ba honneurs, ba acclamations ebongi na yo Papa) eh Yahweh lokumu eza ya Yo 
(Malasi ya kitoko pé ya valeur na sopi yango na makolo na Yo, 
motole ya nkembo, elamba ya lokumu ebongi na yo mokeli na nionso eh) 
Yahweh Lokumu eza ya Yo 
Lokumu eza ya Yo 
Lokumu sé ya Yo 
Lokumu eza ya Yo 
Ebongi na moto té o 
Lokumu eza ya Yo, Solo na batu ya mokili té o 
Lokumu eza ya Yo 
eh Yahweh 
Yaya

Ma play musique ( lyrics )Où les histoires vivent. Découvrez maintenant